Mark 6

Bato ya Nazareti batioli Yesu

(Mt. 13.54-58 ; Lk. 4.16-30)

1Yesu alongwaki wana mpe akendaki na vile na ye, bongo bayekoli na yebalandaki ye. 2Tango saba ekomaki, abandaki koteya na ndako ya mayangani, mpe bato mingi oyo bayokaki ye, bakamwaki mingi penza. Bazalaki kotuna :

—Moto oyo azwi makambo oyo wapi ? Bwania ya ndenge nini bapesi yena ndenge ete asala makamwisi !
3Ye azali salapantie te ? Azali Mwana ya Mariya te mpe ndeko ya Zaki, Zoze, Zude mpe Simon te ? Mpe bandeko na ye ya basi bazalaka na biso awa te ?

Mpe ye azalaki libaku mpo na kondima na bango.

4Bongo Yesu alobaki na bango :

—Moprofeta azalaka na lokumu te na ekolo na ye, na kati ya libota na ye, mpe na ndako na ye !

5Akokaki te kosala wana ata likamwisi moko, longola kaka mwa ndamboya bato ya maladi oyo atielaki maboko mpe abikisaki bango. 6Mpe akamwaki mingi penza mpo na kozanga kondima na bango.

Yesu atindi bapostolo na ye zomi na mibale

(Mt. 10.1,5-14 ; Lk. 9.1-6)

Bongo Yesu atambolaki na bamboka ye pembeni-pembeni mpo na koteya kuna.
7Abengaki bapostolo na ye zomi na mibale mpe atindaki bango mibale-mibale ; apesaki bango mpe bokonzi likolo ya milimo mabe ; 8mpe atindaki bango ete : bamema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka nzete ; sakosi te, limpa te mpe mbongo te na baposi na bango. 9Bolata basandale na makolo na bino, kasi elamba ya likolo te. 10Alobaki na bango lisusu :

—Na ndako oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa wana.
11Kasi soki na esika moko baboyi koyamba bino mpe baboyi koyoka bino, tango bozali kolongwa wana, bopupola makolo na bino : yango ekozala litatoli mpo na bango.

12Bakendaki mpe bateyaki bato ete babongola mitema. 13Babenganaki milimo ebele ya mabe, bapakolaki mafuta na bato mingi ya maladi mpe babikisaki bango.

Liwa ya Jean Batiste

(Mt. 14.1-2 ; Lk. 9.7-9)

14Mokonzi Erode ayokaki sango ya Yesu, pamba te kombo na ye epanzanaki mingi penza.

Bato bazalaki koloba :

—Jean Batiste asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala makamwisi.

15Kasi basusu bazalaki koloba :

—Ezali Eliya !

Bato mosusu mpe bazalaki koloba :

—Azali moprofeta lokola moko ya baprofeta.

16Kasi tango Erode ayokaki yango, alobaki :

—Ezali Jean, oyo nakatisaki motu, nde asekwi kati na bakufi !

(Mt. 14.3-12 ; Lk. 3.19-20)

17Pamba te, Erode ye moko moto apesaki mitindo mpo bakanga Jean mpe batia ye na boloko. Asalaki bongo mpo na Erodiade, mwasi ya ndeko na ye Filipi, oyo ye abalaki.

18Pamba te, Jean azalaki koloba na Erode :

—Ozali na ndingisa te mpo obala mwasi ya ndeko na yo !

19Yango wana Erodiade abombaki kanda na motema mpo na Jean, mpe azalaki kolinga kobomisa ye. Kasi azalaki kokoka te, 20pamba te Erode azalaki kobanga Jean. Ayebaki ete Jean azalaki moto nasembo mpe mosantu ; yango wana azalaki kobatela ye. Tango nyonso, oyo azalaki koyoka Jean, azalaki komitungisa mingi penza ; nzokande azalaki kaka kolinga koyoka ye.

21Bongo tango ya malamu ekomaki. Ezalaki mokolo oyo Erode azalaki kosepela mokolo ya mbotama na ye. Tango asalaki feti moko ya kafu-kafu mpo na bato na ye ya minene, na bankozi minene ya basoda, mpe na bato ya lokumu ya Galileya. 22Tango mwana ya mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode na bato oy Erode abengaki na feti. Bongo mokonzi alobaki na elenge mwasi :

—Senga ngai eloko nyonso olingi, mpe nakopesa yo yango !
23Bongo alapaki ndayi epai na ye : Eloko nyonso okosenga ngai, nakopesa yo yango, ata ndambo ya bokonzi na ngai !

24Bongo elenge mwasi abimaki mpe alobaki na mama na ye :

—Nasenga nini ?

Mama azongisaki :

—Motu ya Jean Batiste !

25Kaka na tango wana, elenge mwasi azongaki mbangu epai ya mokonzi mpe asengaki ye :

—Nalingi opesa ngai, sikʼoyo, motu ya Jean Batiste na sani !

26Mokonzi ayokaki mawa mingi penza ; kasi alingaki te koboya kopesa ye yango, mpo na bandayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo ye abengisaki na feti. 27Bongo mokonzi atindaki noki penza moko ya basoda oyo bazalaki kokengela ye, na etinda ete aya na motu ya Jean. Moto yango akendaki na boloko, akataki motu ya Jean, 28mpe amemaki motu na ye na sani. Apesaki yango na elenge mwasi, bongo ye apesaki yango na mama na ye. 29Tango bayekoli ya Jean bayokaki sango yango, bayaki, bakamatakinzoto na ye, mpe bakundaki yango na lilita.

Bapostolo bazongi

(Lk. 9.10)

30Bapostolo basanganaki pembeni-pembeni ya Yesu, mpe babandaki koyebisa ye makambo nyonso oyo basalaki mpe nyonso oyo bateyaki.

31Bongo alobaki na bango :

—Boya elongo na ngai, bino moko kaka, na esika ezangi bato, mpe bopema mwa moke.

Pamba te, bato mingi penza bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata mwa tango te mpo na kolia.
32Bongo bakendaki bango moko kaka, na bwato, na esika ezangi bato.

Yesu aleyisi mibali nkoto mitano

(Mt. 14.13-21 ; Lk. 9.11-17 ; Jn. 6.1-15)

33Kasi tango bato mingi bamonaki bango ete bazalaki kokende, bayebaki bango mpe bakimaki mbangu na makolo wuta na bavile nyonso, mpe bakomaki kuna liboso na bango. 34Tango Yesu akitaki na bwatu mpe amonaki bato ebele penza, motemana ye etondaki na mawa mingi mpo na bango, pamba te bazalaki lokolabameme oyo ezangi mobateli. Bongo abandaki koteya bango makambo ebele.

35Lokola tango epusanaki mingi penza, bayekoli na ye bayaki epai na ye, mpe balobaki :

—Tango esiʼepusani, mpe esika oyo tozali, ezali na bato te.
36Zongisa bato mpo bakende na bamboka mpe na bilanga ya pembeni-pembeni, basomba biloko ya kolia.

37Kasi Yesu azongiseli bango :

—Bino moko bopesa bango biloko ya kolia.

Bayekoli balobaki na ye :

—Olingi tokende kosomba mampa ya badeni nkama mibale mpo topesa bango balia ?

38Bongo Yesu atunaki bango :

—Bozali na mampa boni ? Bokende mpe botala. Tango bayebaki yango, balobaki :

—Ezali mitano, na bambisi mibale.

39Yesu atindaki bango bavandisa bato nyonso na maboke, likolo ya matiti ya mobesu. 40Bongo bavandaki na maboke ya bato nkama moko, mpe ya bato ntuku mitano. 41Yesu akamataki mampa wana mitano na bambisi wana mibale, atalaki likolo, azongisaki matondi, mpe akataki mampa yango. Bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola yango na bato. Akabolaki mpe bambisi wana mibale, na bango nyonso. 42Bato nyonso baliaki mpe batondaki. 43Bongo balokotaki bitunga zomi na mibale oyo ezalaki yakotonda na biteni ya mampa na bambisi oyo etikalaki. 44Baoyo baliaki mampa bazalaki mibali nkoto mitano.

Yesu atamboli likolo ya mayi

(Mt. 14.22-33 ; Jn. 6.16-21)

45Kaka na tango wana, Yesu atindaki bayekoli na ye bamata na bwato, mpo bakende liboso na ye, na ngambo mosusu ya ebale, epai ya Betsaida, na tango ye azalaki kozongisa bato. 46Sima ya kozongisa bango, akendaki na ngomba mpo na kobondela.

47Tango pokwa ekomaki, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale, bongo Yesu atikalaki ye moko na mokili. 48Amonaki ete bayekoli na ye bazalaki na nkokoso mingi mpo na koluka kai, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Na pene-pene ya ngonga minei ya tongo, Yesu abandaki koya epai na bango, azalaki kotambola likolo ya ebale. Alingaki koleka pembeni na bango, 49kasi tango bamonaki ye azalaki kotambola likolo ya ebale, bakanisaki ete ezali elima. Babandaki koganga, 50pamba te, bango nyonso bamonaki ye, mpe batondaki na somo.

Kaka na tango wana, Yesu alobaki na bango :

—Boyika mpiko, bobanga te, ezali ngai !

51Bongo amataki na bwato elongo na bango, mpe mopepe esilaki. Bakamwaki mingi penza 52pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mampa. Mpo mayelena bango ezalaki ya kozipama.

(Mt. 14.34-36)

53Tango basilisaki kokatisa ebale, bakomaki na mokili ya Genezareti, mpe bakangaki bwato na bango na libongo. 54Tango bazalaki kokita na bwato, bato bayebaki Yesu noki penza. 55Bango bakimaki mbango na bipai nyonso ya mokili wana, mpe bamemaki bato ya maladi na bitoko, na bisika nyonso oyo bazalaki koyoka ete Yesu azalaki kuna. 56Bipai nyonso oyo Yesu azalaki kokende : na bamboka, na vile, to na bilanga, bato bazalaki kotia bato ya maladi na bazando, mpe bazalaki kobondela ye ete apesa bango ndingisa ya kosimba ata songeya elamba na ye. Bongo baoyo nyonso bazalaki kosimba yango, bazalaki kobika.
Copyright information for LinMNB